John 14

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

1Tika ete mitema na bino etungisama te. Bondimelaka Nzambe, bondimela mpe ngai. 2Na ndako ya Tata na ngai bisika ezali mingi, mpe nakeyi kobongisela bino esika. Soki ezalaki bongo te, mbele nalingaki koyebisa bino yango. 3Mpe soki nakeyi mpe nabongiseli bino esika, bongo nakoya lisusu mpe nakokamata bino elongo na ngai, mpo ete bozala epai ngai nakozala. 4Kasi bino boyebi nzela ya esika oyo ngai nazali kokende.

5Toma alobaki na ye :

—Nkolo, toyebi te epai ozali kokende ; bongo ndenge nini tokoki koyeba nzela yango ?

6Yesu azongiselaki ye :

—Ngai nazali nzela, solo, mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata soki aleki na nzela na ngai te.
7Soki boyebaki ngai, mbele bolingaki mpe boyeba Tata na ngai. Mpe banda sikʼoyo boyebi ye, mpe bomoni ye !

8Filipi alobaki na ye :

—Nkolo, lakisa biso Tata, mpe tokozala lisusu na posa ya eloko moko te.

9Yesu azongiselaki ye :

—A a Filipi, banda kala nazali na bino elongo, mpe oyebaka ngai te ? Moto oyo amoni ngai, amoni Tata. Bongo mpo na nini ozali koloba : “Lakisa biso Tata ?”
10Ondimi te ete ngai nazali kati na Tata mpe Tata azali kati na ngai ? Maloba oyo nalobaka na bino, ewutaka na ngai moko te. Kasi Tata, ye oyo avandaka kati na ngai, ye moto azali kosala misala na ye. 11Bondimela ngai ete nazali kati na Tata, mpe Tata azali kati na ngai. Soki bongo te, bondima ata mpo na misala oyo nazali kosala.

12Nalobi na bino ya solo penza : moto oyo akondimela ngai, akosala mpe misala oyo nazali kosala. Akosala kutu makambo minene koleka oyo ya ngai, pamba te nazali kokende epai ya Tata. 13Mpe makambo nyonso oyo bokosenga na kombo na ngai, nakosala yango mpo ete Tata azwa nkembo kati na Mwana. 14Soki bosengi eloko na kombo na ngai, nakosala yango !

Yesu apesi elaka ya Molimo Mosantu

15—Soki bolingaka ngai, bobatela mitindo na ngai. 16Bongo ngai nakobondela Tata, mpe ye akopesa bino Mosungi mosusu, mpo azala na bino tango nyonso : 17ye azali Molimo ya bosolo, oyo mokili akoki kozwa te, mpo bamoni ye naino te mpe bayebi ye te. Kasi bino boyebi ye, pamba te azali elongo na bino, mpe akozala kati na bino.

18Nakotika bino lokola bana bitike te ; nakozongela bino. 19Etikali mwa tango moke, mokili ekomona ngai lisusu te ; kasi bino, bokomona ngai, pamba te nazali na bomoi, mpe bino mpe bokozala na bomoi. 20Na mokolo yango, bokososola ete ngai nazali kati na Tata na ngai, bino bozali kati na ngai, mpe ngai nazali kati na bino. 21Moto oyo andimi mitindo na ngai mpe azali kobatela yango, ye nde alingaka ngai. Mpe moto oyo alingaka ngai, Tata na ngai akolinga ye ; ngai mpe nakolinga ye, mpe nakomimonisa epai na ye !

22Bongo Yuda (kasi Isikariote te) atunaki :

—Nkolo, mpo na nini okomimonisa na biso, kasi na mokili te ?

23Yesu azongiselaki ye :

—Soki moto alingi ngai, akobatela Liloba na ngai, mpe Tata na ngai akolinga ye. Bongo tokoya epai na ye mpe tokosala evandelo na biso epai na ye.
24Moto oyo alingaka ngai te, abatelaka mpe maloba na ngai te. Mpe Liloba oyo bozali koyoka ezali ya ngai te, kasi ezali ya Tata oyo atinda ngai.

25Nayebisi bino makambo oyo tango nazali naino elongo na bino. 26Kasi Mosungi, Molimo Mosantu, oyo Tata akotinda na kombo na ngai, Ye akoteya bino makambo nyonso, mpe akokanisela bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino. 27Natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na ngai ; napesi bino yango te ndenge mokili epesaka. Botika mitema na bino emitungisa te mpe bobanga te.

28Boyokaki ete nalobaki na bino : Nakokende, mpe nakozongela bino. Soki bolingaki ngai, mbele bolingaki kosepela awa nazali kokende epai ya Tata ; pamba te Tata na ngai aleki ngai na monene. 29Nayebisi bino makambo yango sikʼoyo, awa yango esalami naino te, mpo ete tango yango ekosalama, bondima.

30Nakoloba na bino lisusu mingi te, pamba te mokonzi ya mokili oyo azali koya, mpe azali na nguya moko te likolo na ngai ; 31kasi nakosala ndenge Tata atindaki ngai mpo ete mokili ekoka koyeba ete nalingaka Tata. Botelema, tolongwa awa !
Copyright information for LinMNB